Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue : « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 14:6
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye : — Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda ? Moto na Nzambe azongisaki : — Iyo, ezali nde ngai.


Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !


Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !


Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe.


Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki.


Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,


Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.


Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.


Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !


mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;


Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula.


bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango


Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. »


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,


Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.


Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.


mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.


Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali.


Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.


Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.


Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ