Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 14:4 - Mokanda na Bomoi

4 pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 14:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. »


Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »


Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.


Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi.


Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.


Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo ; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango.


Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki :


Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ