Tata na ye alobaki na ye : — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,
Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.
Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.