14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
Tata na ye alobaki na ye : — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.