Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 14:1
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Tango bokokabola mokili na zeke lokola libula, bokopesa epai na Yawe eteni moko lokola etuka ya bule : ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele nkoto mitano na mokuse. Etuka yango ekozala bule na etando na yango nyonso.


Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.


abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye.


Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.


Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ;


Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili.


Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ