Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.
Badefaki bashar, basoda nkoto tuku misato na mibale oyo babundaka likolo ya bampunda, mpe mokonzi ya Maaka elongo na mampinga na ye. Bongo, bayaki kotonga molako na bango pembeni ya Medeba. Kaka na tango yango, bato ya Amoni basanganaki na engumba na bango mpe babimaki mpo na kobunda.
Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela ; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.
Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe ; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi !
Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso mpe ata engumba moko te ekobika ; lubwaku ekobebisama, mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama, pamba te Yawe alobi.
Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.
Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
Kasi epai ya mabota ya Ribeni mpe ya Gadi, napesaki etando oyo ebanda wuta na Galadi, ekenda na lubwaku ya Arinoni mpe esalaki mondelo kino na ebale ya Yaboki oyo esalaki mondelo na mokili ya Amoni.
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni.
Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.