Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 13:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 13:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.


Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.


Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.


bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.


mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »


boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.


Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste.


Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ