Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 13:5 - Mokanda na Bomoi

5 etuka ya bato ya Gebali ; mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 13:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai.


Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.


bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,


Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?


Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu.


Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya nde bazalaki kosala epai na yo mosala ya kobamba madusu na yo mpo ete mayi ekota te ; bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.


Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna ! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia ! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu ? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene ?


Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.


Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi.


Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.


Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani.


wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango.


epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.


Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ