Jozue 13:33 - Mokanda na Bomoi33 Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »