Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 13:31 - Mokanda na Bomoi

31 ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 13:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo ete balingami na Yo bakangolama, bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali, mpe yanola biso ! Yanola ngai !


Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.


Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.


Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko.


Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani.


Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.


mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.


Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ