Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.
Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.
Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango. Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron.
Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka elongo na bilanga ya vino ya Sibima. Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. Bitape yango ezalaki epanzana makasi mpe ekenda mosika kino na ebale monene.
Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo ndenge engumba Yaezeri ezali kolela ! Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene, ekomi kino na mayi monene Yaezeri. Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo mpe mbuma ya vino na yo.
Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.
Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.
Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.