24 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango :
Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi, na Bashani, na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango.
Libota ya Gadi ekozwa eteni moko ya mabele : ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Zabuloni, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ;