Na tina ya Moabi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.
Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;