Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 13:17 - Mokanda na Bomoi

17 kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 13:17
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli. Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni.


Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,


Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe ; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi !


Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba : na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,


na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,


Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso mpe ata engumba moko te ekobika ; lubwaku ekobebisama, mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama, pamba te Yawe alobi.


Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;


kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti ;


Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.


Kasi tolongi bango ; Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, topanzi yango nyonso kino na Nofaki, mpe kino na Medeba. »


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala ; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.


elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.


Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,


Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ;


Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »


Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ