Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 13:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 13:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;


Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.


Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.


Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.


Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika.


Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.


Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.


Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ