Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 12:8 - Mokanda na Bomoi

8 kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Tala bakonzi yango :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 12:8
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.


mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.


Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—


Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Jozue abotolaki bamboka oyo nyonso : mokili ya bangomba, Negevi mobimba, mokili mobimba ya Gosheni, mokili ya se, etando ya Araba, ngomba ya Isalaele mpe bamboka na yango ya se,


Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.


Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,


Sima na yango, bato ya libota ya Yuda bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba, na Negevi, mpe na etando oyo ezalaki pembeni ya ebale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ