Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 12:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Geberi, mwana mobali ya Uri : moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango.


Moyize alobaki na bango : — Soki bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni, bango nyonso basimbi bibundeli mpo na kokende na bitumba, bakatisi ngambo ya Yordani elongo na bino liboso ya Yawe, mpe tango mokili ekokoma na se ya bokonzi na bino, bopesa bango mokili ya Galadi lokola libula na bango.


Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.


Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.


Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ;


Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »


Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ