Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 12:3 - Mokanda na Bomoi

3 Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 12:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.


Abebisaki bingumba yango, etando nyonso elongo na bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna mpe banzete nyonso.


Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali.


Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;


mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.


longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,


Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.


Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.


Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani : wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este.


bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga.


epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori ;


Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti :


Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi,


Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.


mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ