Baana, mwana mobali ya Ayiludi : moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami ;
Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
Kati na libota ya Nefitali : Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.
Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.