Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »