Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »
bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.