Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 11:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 11:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.


Mosakoli azongisaki : — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.


Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli.


Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.


Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.


Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › solo, bokokima nde ! Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !


Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !


Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo.


Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.


Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »


Bakonzi yango nyonso basangisaki mampinga na bango esika moko mpe batongaki molako na bango pembeni ya mayi ya Meromi mpo na kobundisa Isalaele.


Boye Jozue elongo na mampinga na ye nyonso babimelaki bango na pwasa, na mayi ya Meromi mpe babundisaki bango ;


Jozue asalaki bango ndenge Yawe atindaki : akataki misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe atumbaki bashar na bango.


Jozue alobaki na bato : — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.


Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ