Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 11:4
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.


Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango.


Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.


Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.


Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.


Bakonzi yango nyonso basangisaki mampinga na bango esika moko mpe batongaki molako na bango pembeni ya mayi ya Meromi mpo na kobundisa Isalaele.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ