Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 11:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali.


Beni-Abinadabi : moyangeli ya Dori ; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo ;


longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,


Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »


Jozue abotolaki bamboka oyo nyonso : mokili ya bangomba, Negevi mobimba, mokili mobimba ya Gosheni, mokili ya se, etando ya Araba, ngomba ya Isalaele mpe bamboka na yango ya se,


Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.


mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko


Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.


mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani.


Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).


Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ