17 wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango.
Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.
Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri.
Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino.
epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.