Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Babomaki moto nyonso oyo azalaki kuna na mopanga. Babebisaki penza bango nyonso, babikisaki ata ekelamu moko te ya pema mpe batumbaki engumba Atsori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 11:11
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.


Kasi tomemaki mpo na biso bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tobotolaki na bingumba.


mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.


Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ