Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 10:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 10:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »


Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela.


Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.


Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »


Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.


Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.


Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba.


Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ;


Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.


Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi.


Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele : — Towuti na mokili moko ya mosika ; bosala boyokani elongo na biso.


Bazongiselaki Jozue : — Tozali basali na yo. Kasi Jozue atunaki bango : — Bozali banani mpe bowuti wapi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ