Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.