Jozue 10:40 - Mokanda na Bomoi40 Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.