Jozue 10:38 - Mokanda na Bomoi38 Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.