33 Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa ; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.
Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.