Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.
Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.