Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.
Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !
Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.
Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.