Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 10:28 - Mokanda na Bomoi

28 Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 10:28
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te.


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.


Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.


Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina.


Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna ; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi.


Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.


Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.


mokonzi ya Libina moko mokonzi ya Adulami moko


mokonzi ya Makeda moko mokonzi ya Beteli moko


Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda : bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.


Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »


Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ