Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 10:26 - Mokanda na Bomoi

26 Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 10:26
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.


akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.


Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi.


mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu ;


Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.


Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.


Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ