22 Sima, Jozue alobaki : « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »
Jozue alobaki : « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.
Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.
Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.
Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue.
Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »