Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 10:20 - Mokanda na Bomoi

20 Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 10:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »


Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene.


Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano.


Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›


Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.


Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.


Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.


Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. »


Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.


Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.


bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.


Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ