Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 10:12 - Mokanda na Bomoi

12 Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele : « Moyi, telema na Gabaoni ! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 10:12
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni.


Ezekiasi azongisaki : — Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi ; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi.


Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.


Ezayi azongisaki : — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ?


Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati.


Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.


apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ; atiaka kashe na minzoto.


bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;


Ezali na nzela ya lisolo te, na nzela mpe ya maloba te oyo mingongo na yango eyokanaka te.


Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.


Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.


Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.


Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.


Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso :


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali mpe makonga ebetaka lokola bakake, moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango : moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te ;


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. Moyi etelemaki na kati-kati ya mapata mpe elalaki noki te, pene mokolo mobimba.


Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.


Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni.


Wuta na likolo, minzoto ebundaki ; na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.


Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele.


Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ