Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 1:9
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »


Yawe azalaki elongo na Jozefi ; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye.


Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala,


Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.


Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.


Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;


« Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita ; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.


Elobaki na ngai : — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia ! Zala makasi ; solo, zala makasi ! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki : — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.


Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.


Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.


Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »


Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango.


Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato :


Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !


Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko !


Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »


Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.


Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye.


Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki : — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo ?


Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ