Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 1:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.


Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, na engumba Amati, tango Adadezeri akendeki kovandisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.


Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi.


Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani.


Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ