Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 1:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »


Okomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango.


Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.


Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye ; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.


Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango.


Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.


Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize :


« Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ