17 Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !
Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »
Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai !
Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.
Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.
wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !