Jozue 1:14 - Mokanda na Bomoi14 Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.