Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Bakitani ya mabota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazalaki bango nyonso nkoto tuku minei na minei na nkama sambo na tuku motoba. Babongamaki mpo na mosala ya soda. Bazalaki bilombe mibali oyo bayebi kosalela nguba, mopanga, tolotolo ; mpe bamilengela mpo na bitumba.