« Bino bato nyonso ya Filisitia, bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe.
Akofuta moto na moto kolanda misala na ye : kanda makasi epai ya bayini na Ye, mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ; akopesa na bisanga lifuti na yango.
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.
Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !
Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »