Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato.