Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?
Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala, bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ; poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa, ekawuki lokola koni.