Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Liboso na bango, moto ezali kotumba ; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 2:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango.


Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.


Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.


Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.


Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga.


Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, kokweyisa bingumba na yango mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango ? ›


Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.


Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko ; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.


Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.


Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mokili eziki na moto, mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. Moto moko te akobikisa ndeko na ye.


Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala ; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te ; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.


Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te : batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.


Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ