Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 2:22 - Mokanda na Bomoi

22 Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti eboti lisusu na elanga, banzete eboti lisusu bambuma ; banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 2:22
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.


Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.


Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.


Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.


Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !


Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.


Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.


Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’


Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai ; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango.


Bongo ndenge nini Ngai nayoka motema pasi te mpo na Ninive, engumba monene, oyo ezali na bato koleka nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi te kokesenisa makambo mabe mpe makambo malamu, mpe ezali na ebele ya bibwele ?


Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ