Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Joeli 2:19 - Mokanda na Bomoi

19 Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Joeli 2:19
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.


Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango ; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te.


Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te ; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › »


Nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso, nakobotisa mbuma ya ble mpe nakokomisa yango ebele penza ; bongo nakotindela bino lisusu nzala te.


Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.


Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »


Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.


Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.


Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo ; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.


Bilanga ebebisami, mabele ekawuki, mbuma ya ble ezali lisusu te, vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.


Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta.


Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.


nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.


Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ